notícias musicais

top 13 artistas

top 13 musicas

Confira a Letra Liwa Yo Moyibi

Zaïko Langa Langa

Liwa Yo Moyibi

Suka suka ya la vie ya moto
Kaka liwa eh (Eh)
Lola eh, Lola Mwana
Mama akeyi
Oh liwa
Obotoli nga mama ya bana na nga
Nako kamwa
Yo liwa
Omemeli nga molimo ya mama na bana oh
Nde wapi eh
Nakoloba nini na bato
Soki Lola akoli
Akotuna papa wapi mama na nga
Biteni Tete mwana na yo ya mwasi
Akobenga nani mama
Nga nazingi maboko
Ngo na mawa ya bana na nga
Mokaba pesela nga mbote
Na yo Coké mwana Ekanga
Saloti pesela nga mbote
Na Eddy Diora Sweye Bolamba
Ya Anicet oy'a Kitenge
Naleli yo na Jazz Babalou
Bipayi ozali
Oyoka kolela pe losambo na ngai
Molimo na yo ebatela nga na bana
Na pasi oyo ya mokili
Saloti loba na Kula Mambo Kadima
Liwa na ye nga nazalaki te eh
Dans l'au-delà, je penserai à toi, aimée
Mokaba pesela nga mbote
Na yo Coké mwana Ekanga
Saloti pesela nga mbote
Na Eddy Diora Sweye Bolamba
Ya Anicet oy'a Kitenge
Naleli yo na Jazz Babalou
Bipayi ozali
Oyoka kolela pe losambo na ngai
Molimo na yo ebatela nga na bana
Na pasi oyo ya mokili
Saloti loba na Kula Mambo Kadima
Liwa na ye nga nazalaki te eh
Likambo ya somo
Pasi mingi
Tala mokumba monene otikeli nga
Ya DV Moanda eh
Alekanda, boyamba mama na esengo
Towutaka wapi eh
Tokendeke wapi oh
Ah liwa
Liwa yo moyibi eh
Kombe kombe na lopango ya soso
Likambo ya somo
Pasi mingi
Tala mokumba monene otikeli nga
Ya DV Moanda eh
Alekanda, boyamba mama na esengo
Towutaka wapi eh
Tokendeke wapi oh
Ah liwa
Liwa yo moyibi eh
Kombe kombe na lopango ya soso
Nakolela
Nakolela
Nakolela baninga bakende
Batiki nga na mawa
Mbotama ebandeli
Suka ya vie ya moto
Ah liwa
Bea Mantuala eh
Otika Bony Denteke na mawa
Tonton Kimwana
Pa Rengos naleli mingi oh
Dechouga eh
Liwa yo moyibi eh
Kombe kombe na lopango ya soso
Nakolela
Nakolela
Nakolela baninga bakende
Batiki nga na mawa
Mbotama ebandeli
Suka ya vie ya moto
Ah liwa
Bea Mantuala eh
Otika Bony Denteke na mawa
Tonton Kimwana
Pa Rengos naleli mingi oh
Dechouga eh
Liwa yo moyibi eh
Kombe kombe na lopango ya soso
Nakolela
Nakolela
Nakolela baninga bakende
Batiki nga na mawa

Tracker